Ba Ndeko,
Nazongeli bino sima ya mikolo miyike. Sika tomeka naino na kokoba na lisapo lia biso na eteni oyo etali Zaiko Langa langa.
1. Ebandeli na Belguide national
Na suka ya ba mbula soixante, ba orchestres esimbaki makambo ezalaki African Jazz, O.K Jazz, African Fiesta Sukisa na National. Yango ezalaki ba orchestres ya ba parents na ba kulutu. Na oyo etali bilenge, ezalaki Négros Succès, Thu Zaina, Mustang na Is boys (orchestre ya bana ya batu ya mbongo), Los Nickelos (Liège), Yéyé National na Afro Négro (Bruxelles), Tropicana (Charleroi) ba orchestres ya ba Belgicains.
Neti na Léopoldville ou Kinshasa ba jeunes de l'époque bazalaki na habitude ya ko s'organiser na ba cercles, ba associations na ba amicales ya ba jeunes, bango babandaki ko trouver ba moyens ebele ya ko se détendre na ko se distraire mpe kosala ba loisirs na bango pendants ba grandes vacances : ba rencontres sportives; excursions, pique-niques, fêtes, loisirs, visites na ba Zoo na ba sites touristiques, etc. Na kati wana ba concours ya ba jeunes na ba musiques ya ba jeunes talents ebandaki kosalema.
Pendant ba vacances sima ya match ya football, ba jeunes misusu babandaki kokutana na avenue Popokabaka numéro 10 mpona ko beta biloko ya ba orchestres ya ba jeunes oyo ebadaki kosala succès na moment wana. Souvent bazalaki na concours ya ba guitaristes Roxy Tshimpaka na Gégé Mangaya oyo bayebanaki déjà puisque bazalaki ba musiciens ya Thu Zaina.
Belguide National ebandaki nde ko répéter mpe kobeta devant ba mista, ba répertoires ya ba orchestres misusu. Esengeli koloba awa que yango ebandaki nde kobeta kaka ndenge wana, parce que deux guitaristes bakutanaki esengelaki kosala mua improvisation en répétant ba oeuvres ndenge wana sans plus.
Na mukolo ya le 23/12/1969, neti ba fêtes ya suka ya mbula ekomaki kopusana, likanisi liyelaki Henry Mongombe, Marcelin Delo, André Bita, na Vital Moanda que baluka basala groupe moko oyo ekoki kobeta na quartier ou pourquoi pas na ba fêtes mpo na komeka nzotu. Kasi neti boule ezalaki ya kosala groupe, ba idées originales ezalaki te, yango wana il fallait calquer sur modèle na démarche eyo ezalaki déjà ko exister, neti Thu Zaina par exemple.
Na yango esengelaki ko contacter bana ya batu ya mbongo na Kalina, Ranquin Na Dendal na oyo etali mua financement; esengelaki kosala noki mpona kobeta na nouvel an 1970 mpona ko profiter na mukolo wana esala que orchestre ya sika eyebana na ba jeunes mingi; yango ezalaki le seul moment oyo elingaki ezala malamu mpona sortie officielle.
2.Création ya Zaiko
Tango bapanzi Belguide national, esengeli sika kosala groupe ya sika na ba musiciens réguliers. Na yango ba quatre fondateurs bayebisaki ba oyo nionso bazalki na Belguide ete kobanda lobi, le 23/12/1969 tokobanda groupe ya sika mpo toluka tobima ba mukolo ya bonne année. Yango wana, ba musiciens bayaki kokutana epayi ya ba Mangaya na 10, Popokabaka ndenge bamesaka koya kokutana na ba répétitions ya Belguide.
Précisons que ezali na ntina moko te ya kosala polémique ya pamba na oyo etali premier musicien bazuaki ou huitième musicien ayaki. Soki Félix Manuaku a se retrouva wana mutu ya liboso, ezali puisque ayaki avant tout le monde mpo ye azalaka toujours ponctuel na respect ya heure. Jules Wembadio ayaki wana suite na proposition ya Henry Mangaya mpo asepelaki na voix na ye na lolenge ayembaki Adios Tété ya Rochereau na African Jazz. Notons également que Wembadio azalaki musicien ya Belguide te, mpe atikalaki koyeba existence ya Belguide te avant Beaudoin na Rhizostome Mitshou bamema ye kuna na etinda ekedeki bango epayi ya ba Mangaya. Ba misusu oyo batikali : José-Roger Nyoka, Enoch Zamuangana, Théodore Sukami, Zéphyrin Matima, Efereme bazalaki déjà koya na Belguide.
Sima ya bokutani wana, bayokanaki ete esengelaki ba répéter makasi mpo babeta mikolo ya fête, na appui ya ba jeunes ya Kalina oyo mpe babandaki déjà koyemba na orchestre ya quartier, Zaiko eye kosalama na chant : Jules Wembadio, José-Roger Nyioka, Odon Pelasimba, Lemand Kalema na Simon Mavuela.
Guitare : Félix manuaku, Zéphyrin Matima, Théodore Sukami, Enoch Zamuangana, Damien Ndebo na Pierre Mwaka
Drumme : Beaudoin Mitshou na mbunda Efereme
Tango Zaiko esalemi wana, na likanisi lia moto moko te ezalaki ete mouvement oyo ezali na but moko ya koluka kosala musique ya solo. NON! Personne a pensaki ete mpona kosala musique esengeli bazala na cadre na structure oyo esengeli, koluka mécène na producteur, kozala na statut, ko se faire enregistrer na UMUZA na SONECA, Koluka kozua personnalité juridique ya Zaiko mpe kosala ete ezala sous protection ya loi en tant que marque déposée, ko faire signer ba musiciens contrat écrit, ko souscrire assurance, etc. Na légèreté wana, bango wana baluki ko coopérer mpo ete babeta liboso ya public ya Thu Zaina mpo ba se faire adopter na ba bana ya batu ya mbongo oyo babandaki koya na ndule wana na ba jeunes filles ya Sacre coeur, Athénée de Kalina, Lycées Ozone na Kimuenza.
Effectivement Thu Zaina ezalaki au courant ya projet ya Zaiko mpo Gégé leki ya Henry na Roxy bazalaka mpe na circuit ya Belguide mpe bazali côté moko na Dendal (Gégé Sur Popokabaka, Roxy sur Victoire). Ignace Ndebo azuaki proposition wana na Vital mpe bana ya Kalina bayebaki que ba garçons ya Dendal na Ranquin balingi bayakobeta devant orchestre oyo ezali koningisa Kinshasa ya ba jeunes na époque wana.
Comme ba vrais mbumbulu, ba nduliste ya Zaiko baweli kokende devant public ya lolenge wana, chauffé na cause ya Thu Zaina oyo ezalaki na succès na capitale. Ndule wana ebetamaka na la Funa, cadre moko chic: restaurant, piscine, salle de jeux, ect., à l'opposer na décore ya epayi ya ba Mangaya esika babandaki ko répéter devant quelques amis du coin.
Dépayser, ba se retrouver na milieu oyo mingi babandaki ko fréquenter te compte tenu ya classe ya Funa... mpe kuna ba nani bayaki? Bien évidemment bana ya batu ya mbongo, ba belgicains oyo bayaki ko passer nouvel ans en famille, ba filles ya ba écoles totangi likolo.
Devant public wana, complexe epayi, bilamba ya malonga te, sapato ya solo te, suki kaka modèle wana, malasi na nzotu te, baye makolo pendant que ba nduliste ya Thu Zaina bazali ko débarquer na ba cars, ebebisaki morale na bango : basimba micro mpona ko koyemba ba nzembo ya ba Los Nickelos na Yéyé national boye ba incohérence, baluka bameka mua composition boye ba accords ezali kosimba te, etc. Bref bazalaki na kolenga ya makasi.
Zaiko esala soni pendant que Thu Zaina ebeta musique mpe elakisa Zaiko ete nzela ezali naino mulayi. Kasi na kuzu, Zaiko ayaki ko apprendre que ngenge wana ezali ya pamba te, esengeli osimba monana mpo o connaître bisengo wana.
Mbala ya mibale ezalaki lisusu échec devant Map's Ya Athénée de Kalina.
A partir ya wana nde Vital akobanda ko se démarquer na Henry, Marcelin na André na oyo etali approche ya musique ya Zaiko par rapport na kosimba biloko(tokozongela na oyo etali polémique sur l'unique fondateur ya Zaiko ezali D.V Moanda).
Na courage na ba jeunes ya Zaiko, bazongeli mosala mpo na kobongisa terrain na perspective ya kosala sortie ya bien na pâque. Ya mbala oyo bakomi kozua mua ba conseils : esengelaki appui ya parin moko oyo asali kombo na musique, kozala na ba instruments ya malamu, ko harmoniser mingongo na instrumental, etc. Rocherau-Pascal Tabu aye kopesa bango batoli ya makasi côté wana mpe atieli bango ba instruments na disposition. Kasi na nionso oyo esengelaki babongisa eyembeli na bango, lisusu neti Odon na Lemand baliaki coin mpo bakanaki bango ete ba jouer na sabotage en tant que ba petits ya Thu Zaina, esengelaki ba remplacer bango. Yango wana bayaki kozua Antoine Evoloko oyo azalaki kosala ba montées ya somo ye na mista na ye Gina Efonge na Map's ya Athénée de Kalina. Kokoma ya Evoloko na Gina ezalaki vraiment koya ya ba perles rares oyo Zaiko ezalaki nayango besoin.
Sortie ya Hawai, le,28/03/1970 mpe ndule ya le, 29 na le, 30 mars 1970 esimba mpe ba journaux elobela likambo wana pour la première fois. Na yango Zaiko na trois mois wana eyaki ko s'organiser ete ezala na branche oyo ezali kobeta musique pop na mususu rumba. Donc na Janvier 1970 bazalaki : Jules Wembadio (Presley), Pierre Nkumu, José-Roger Nyoka (Jossart), Gina Efonge, Antoine Evoloko (Anto Nickel), Otis, Simom Mavuela (Simeon), Théodore Sukami (José-Teddy), Enoch Zamuangana, Zéphyrin Matima, Delez, Pierre Mwaka (bapuis),Jean-Marie Enkerme (Mary-Joe), Eferme, Dieudonné Nzolatima (Mbuta), André Bimi, Mary Joe Belobi.
A partir ya wana nde na ndenge histoire ekendeke, Anto na Gina bazali ba oyo basala tournant décisif na vie ya Zaiko parce que apport na bango ematisaki Zaiko likolo. Il est aussi vrai que Jules Presley, Jossart na Simeon bazalaki na succès na bango makasi kasi duo ya Gina na Nickel ezalaki autre chose.
kolongola contribution ya ba nduliste na succès ya Zaiko, esengeli mpe totanga bana ya batu ya mbongo oyo basimbaki Zaiko na mbongo, bilamba, moyens de transport na ba cadeaux ebele : Misha Mulongo na Ranquin, Ignace na Damien Ndebo na Kalina, Pa Muke Ngita na Immo Congo, Jean Mvanzakila, Gaby Makuambala na Ranquin, Tarou Makoso Tarou Buana na Dendal, Ba Bolhen na Dendal, ba Rodall na Kalina, Ba Bumba na Binza, Achile Munga na Bon Marché "Achelon", Daniel Dinzey "Zikondo" na Ranquin, William Canon, Gérard Poto na Binza, ba Nzolatima na Dendal, ba Mazaza na Kalina, ba Manoka na Ranquin. Lomama na Immo Congo, etc.
N.B. Mingi natangi bakomaki kofanda na Binza, natangi nde esika bazalaki na époque wana.
Musicalement,
Emmanuel kandolo
P.S. Messager, nawuti kotanga blog na yo, nakomeka kolobela sur makambo mingi okomi na ba nzembo oyo oti nakati na cadre
ya ajoute.
E.K.kandolo emmanuel
Messages: 104
Inscription: Ven 18 Nov, 2005 11:17 am
Localisation: Paris, France Haut